Hadith for the World
Tap the image to view it full size
Virtues and Manners

Na bokonzi ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, alobi: Motindami ya Nzambe, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobaki:

Available in 71 languages
«Na bokonzi ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, alobi: Motindami ya Nzambe, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobaki: “Bókómisa bandako na bino malita te, mpe bókómisa lilita na ngai fêti te, kasi bosambela mpo na ngai. Mabondeli na bino ekokóma epai na ngai na bisika nyonso oyo bozali.”»

Meaning translation ·

Explanation

The meaning in a few plain lines

Mosakoli, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, apekisaki bandako kokangama mpo na losambo, mpo ete ezala lokola cimetière oyo moto akoki kosambela te. Apekisaki kokende kotala lilita na ye mbala na mbala mpe kokutana kuna mbala na mbala. mpo na wana ezali Lolenge ya Shirki. Apesaki mitindo ete bisika nyonso kosengela ye mabondeli na kimya ezala likoló na ye esika nyonso awa na mabele ekokomela ye, ata pembeni to na mosika, kasi ezali na ntina te koluka kaka ozala pene naye pona kosengelaye Dua senga bisika nyonso ozali.

Source
رواه أبو داود
Download image

Saved at original quality