Hadith for the World
Tap the image to view it full size
Virtues and Manners

Abu Hurairah (Allah asepela naye) alobi ete

Available in 70 languages
«Abu Hurairah (Allah asepela naye) alobi ete Ntoma (kimia mpe boboto ezala likolo naye) alobi - kolandisama na maye Nkolo naye ete: «Mosali moko asalaki lisumu, na sima alobi: '' O Nkolo! Limbisa masumu na ngai", Allah Lokumu naye, alobi: "Mosali na ngai asali lisumu, mpe ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, lolenge moko pe Apesaka etumu likolo ya masumu. Kasi na sima mowumbu asali lisusu lisumu mpe alobi : " Ee Nkolo! Limbisa masumu na ngai, mpe Allah Lokumu naye, alobi lisusu ete: "Mosali na ngai asali lisumu, mpe ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, lolenge moko pe Apesaka etumu likolo ya masumu. Kasi na sima mowumbu asali lisusu lisumu mpe alobi : " Ee Nkolo! Limbisa masumu na ngai, mpe Allah Lokumu naye, alobi lisusu : "Mosali na ngai asali lisumu, mpe ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, lolenge moko pe Apesaka etumu likolo ya masumu. Sala nyonso olingi, mpo esi Nalimbisi yo».»

Meaning translation ·

Explanation

The meaning in a few plain lines

Ntoma Muhammad (kimia mpe mapamboli ezala ote naye) azobeta maloba kowuta na Nkolo naye na koloba ete: moto asali masumu mpe na sima alobi: "Ee Nkolo! Limbisa masumu na ngai". Allah, Nkembo naye, alobi: "Mosali na ngai asali lisumu mpe ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, mpe Abombaka ye na masumu wana mpe kolongisa ye na yango, tope -ayebi ete azali na Nkolo- oyo Apesaka likolo naye pona lisumu wana; -Allah alobi- Esi nalimbisi ye." Na nsima, mosali yango asali lisusu lisumu, mpe na sima alobi: "Ee Nkolo! Limbisa masumu na ngai". Na Allah alobi na ntina na yango ete: "Mosali na ngai asali lisumu mpe ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, mpe Abombaka ye na masumu wana mpe kolongisa ye na yango, tope Apesaka etumbu likolo naye pona lisumu wana; -Allah alobi- Esi nalimbisi masumu pona mosali na ngai." Na sima mosali yango asali lisusu mususu, pe sima na yango asengi bolimbisi na koloba ete : "Ee Nkolo na ngai limbisa masumu na ngai". Na sima Allah alobi: "Mosali na ngai asali lisumu, na ye ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, mpe Abombaka ye na masumu wana mpe kolongisa ye na yango, tope Apesaka etumbu likolo naye pona lisumu wana; -Allah alobi- Esi nalimbisi masumu pona mosali na ngai, yango wana; asala mae oyo alingi, na tango ete azali tango inso soki asumuki, na sima asundoli yango, ayoki mawa, mpe azwi mokano ya kozongela yango lisusu te. Kasi molimo na ye ekweisi ye pe azongi lisusu na masumu. Kasi na tango nyonso azali kotubela sima ya kosala, Nakolimbisa ye! Pamba ete kobongola motema (Tubela) elongolaka penza makambo nyonso ya kala."

Source
متفق عليه
Download image

Saved at original quality