Hadith for the World
Tap the image to view it full size
The Creed

Kowuta na maloba ya Abu Ayyub Al-Ansari, Nzambe asepela na ye, ete Ntoma ya Nzambe (S.a.w) alobaki:

Available in 70 languages
«Kowuta na maloba ya Abu Ayyub Al-Ansari, Nzambe asepela na ye, ete Ntoma ya Nzambe (S.a.w) alobaki: “Epesameli nzela te moto asundola ndeko na ye mikolo koleka misato, Bakutani, na oyo alakisi ye, oyo alakisi, ye, na oyo eleki malamu kati na bango mibale ezali oyo akobanda na Salamu”.»

Meaning translation ·

Explanation

The meaning in a few plain lines

Ntoma, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, apekisaki musulman atika ndeko na ye ya musulman koleka mikolo misato, na tango wana moko na moko na bango akokutana na mosusu mpe aboyi kopesa ye mbote, to aboyi koloba na ye. Oyo eleki malamu kati na baswani ezali oyo amekaka kolongola kokima, mpe abandi na kopesa salamu, na oyo elingi koloba kokima awa ezali kokima pona motema naye Moko kaka, kasi oyo etali kokima mpona nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, lokola kokima bato oyo bazangi botosi, oyo bayebi makambo ya sika bidah, mpe ya mabe -kosala baninga, kokima yaboye, Yango esukaka na ntango moko te, kasi etaleli nde mposa ya kotika yango, mpe elimwaka ntango mabe esili.

Source
متفق عليه
Download image

Saved at original quality