Hadith for the World
Tap the image to view it full size
Virtues and Manners

Kowuta na maloba ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, alobaki:

Available in 70 languages
«Kowuta na maloba ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, alobaki: Ntoma ya Nzambe, tika ete Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, batunaki ye na ntina ya nini mingi ememaka bato na Paradis, mpe alobaki: “Kobanga Nzambe mpe bizaleli malamu,” mpe batunaki ye ntina ya nini mingi ememaka bato na lifelo alobaki ete: “Lolemo na binama”.»

Meaning translation ·

Explanation

The meaning in a few plain lines

Ntoma, Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alimbolaki ete bantina minene ya kokota na Paradis ezali bantina mibale: Bobangi Nzambe mpe kozala na bizaleli malamu. Na yango kobanga Nzambe: ezali kotia libateli kati na yo mpe etumbu ya Nzambe, mpe yango ezali na kosalaka mitindo na Ye mpe koboya bipekiseli na Ye. Bizaleli malamu ezali bongo kobatela elongi ya moto polele, kosala malamu, mpe koboya kosala mabe. Bantina minene ya kokota na Lifelo ezali bantina mibale: Lolemo na binama. Lolemo moko ya masumu na yango ezali : lokuta, koloba kotonga na nsima, kolobaloba songi songi, mpe makambo mosusu. Binama masumu na yango ezali : ekobo, na homosexualité, mpe makambo mosusu.

Source
رواه الترمذي وابن ماجه وأحمد
Download image

Saved at original quality