Hadith for the World
Tap the image to view it full size
The Creed

Abu Hurairah (Allah andimela ye) alobi ete, Motindami ya Allah (kimia mpe mapamboli ya Allah ezala likolo naye) alobaki:

Available in 70 languages
«Abu Hurairah (Allah andimela ye) alobi ete, Motindami ya Allah (kimia mpe mapamboli ya Allah ezala likolo naye) alobaki: “Bato - ya ngonga - na ngai nyonso bako kota na Paradizo longola se oyo aboyi” - Bayekoli - batunaki : Ee Motindami ya Allah ! Boye nani akoboya? Ayanolaki na bango na koloba ete: “Moto oyo akotosa ngai akokota na Paradizo, mpe oyo akozanga botosi ngai yende asili koboya”.»

Meaning translation ·

Explanation

The meaning in a few plain lines

Ntoma ya Allah (kimia ezala likolo naye) azali kopesa sango ete Bato na ye nionso - sima ya boyeyi naye - bakozala kokota na kati ya Paradizo longola se bae oyo bakoboya! Bayekoli (Allah asepela na bango) batunaki Ntoma ete: Nani akozala koboya Ee Motindami ya Allah?! Ntoma (kimia mpe boboto ya Allah ezala likolo maye) ayanolaki bango ete: ya sôlo moto oyo akomikitisa, alandi mpe atosi Motindami ya Allah (kimia ezala naye) yende akozala kokota na Paradizo, mpe na oyo nyonso akozanga botosi mpe aboyi komikitisa na mibeko - ya Lingomba -, yemoko nde asili komipekisa bokoti na Paradizo likolo ya misala naye ya mbindo.

Source
رواه البخاري
Download image

Saved at original quality