TopicVirtues and Manners
288 hadiths
288 hadiths
Kowuta na maloba ya Abu Malik Al-Ash’ari, Nzambe asepela naye, alobaki boye: Motindami ya Nzambe (s.a.w) alobaki: "Bopeto ezali eteni ya bondima, na Al hamdoulillahi etondisaka balance, mpe Subhâna l-lâhi Wa Al hamdoulillah etondaka - to etondisaka - oyo ezali kati kati ya mapata na mabele, na losambo ezali lumière, mpe mabonza ezali elembeteli, na motema molai ezali mwinda, na Coran ezali preuve pona yo to contre yo, mutu nyonso abundaka pona molimo naye, kokanga yango ou bien kotikela yango"رواه مسلم
Kowuta na maloba ya Muadh, Nzambe asepela na ye, alobaki: Nazalaki sima ya Prophète (s.a.w), likolo ya mpunda oyo babengi Ufayr. Ntoma alobaki : “ya Muadh, oyebi droit ya nzambe epayi ya basali naye, na droit ya basali epayi ya nzambe ?", nalobaki: nzambe na ntoma naye nde bayebi, ntoma alobaki: " yasolo droit ya nzambe ezali, basambelaye basangisa ye na eloko moko te, mpe droit ya basali naye ezali apesa bango etumbu te, na Mutu oyo asangisakiye te" Nalobaki: O Motindami ya Nzambe, namema nsango oyo epai ya bato? Alobaki boye: “Kopesa bango nsango te, bako likiya”.متفق عليه